Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Joeli 2:18 - Mokanda na Bomoi

18 Yawe akotonda na zuwa mpo na mokili na Ye mpe akoyokela bato na Ye mawa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Joeli 2:18
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala ; mpe na Siona, mwa ndambo bakobika. Bolingo makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde ekokokisa yango.


Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye ;


Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,


Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala ; mpe na Siona, mwa ndambo bakobika. Bolingo makasi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde ekokokisa yango.


Yawe akobima lokola elombe, akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba ; akoganga, solo ; akoganga makasi, mpe akolonga banguna na Ye.


Bapaya bakotonga lisusu bamir na yo, mpe bakonzi na bango bakosalela yo. Ezala nabetaki yo na kanda na Ngai, kasi nakoyokela yo mawa na ngolu na Ngai.


Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo : Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?


Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango ; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.


Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.


Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;


Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki : — Tatola maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Yelusalemi mpe Siona.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Siona, mpo ete nalingaka yango makasi na motema na Ngai. › »


Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.


Bapesaki Yawe kanda makasi likolo ya banzambe na bango ya bapaya, mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo.


Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa ; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.


Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.


Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye ; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa.


Bongo bana ya Isalaele balongolaki banzambe ya bapaya kati na bango mpe basalelaki Yawe. Mpe Yawe akokaki lisusu te kotala pasi na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ