Tala makambo oyo akomaki na mikanda yango : « Bobongisa mokolo moko ya kokila bilei mpe bobengisa bato na mayangani epai wapi bokotia Naboti na esika ya liboso.
Botika komemela Ngai makabo oyo ezanga tina ! Nazali koyoka malasi na bino ya ansa nkele. Bafeti na bino ya ebandeli ya sanza, ya Saba mpe mayangani na bino : bafeti wana ya mabe, nazali kokoka yango lisusu te.
Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda.
Bopanza sango ya kokila bilei, bobengisa bato na mayangani ya bule, bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili ete baya na Ndako ya Nzambe na bino mpe bolela epai na Yawe.
Bobeta kelelo na Siona ! Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule ! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga, pamba te mokolo ya Yawe ezali koya ; solo, ekomi penza pene.