Joeli 2:12 - Mokanda na Bomoi12 « Ezala sik’oyo, » elobi Yawe, « bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba, na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na etinda ya mokonzi, bamemi sango bakendeki kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, na mikanda oyo ewutaki epai ya mokonzi mpe bakalaka na ye. Tala makambo oyo ezalaki kati na mikanda yango : « Bana ya Isalaele, bozongela Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele, mpo ete Ye mpe azongela bino oyo bobiki na maboko ya bakonzi ya mboka Asiri !
— Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka !
Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite ; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. »