Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Joeli 1:7 - Mokanda na Bomoi

7 Ekolo yango ekomisi elanga na Ngai ya vino lokola esobe mpe ekati-kati banzete na Ngai ya figi, elongoli banzete na Ngai nyonso baposo, ebwaki yango mpe etiki bitape na yango pembe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Joeli 1:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abebisaki bilanga na bango ya vino mpe ya figi, mpe abukaki banzete ya mboka na bango.


Mabanki ekotaki kati na Ejipito nyonso mpe evandaki ebele na bisika nyonso ya Ejipito. Etumbu ya mabanki ya ndenge wana etikala nanu kozala te mpe ekotikala kozala lisusu te.


Ezipaki mabele nyonso mpe mabele eyindaki. Eliaki nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te : matiti nyonso ya bilanga mpe bambuma nyonso ya banzete. Kati na mokili mobimba ya Ejipito, eloko moko te ya mobesu etikalaki na banzete to na matiti ya bilanga.


Vino ya sika ezali na matanga, elanga ya vino ekawuki ; bato nyonso oyo bamesana na esengo bakomi kolela na pasi.


Bolela na kobeta tolo mpo na bilanga ya kitoko, mpo na bilanga ya vino oyo ebotaka malamu,


Nakokomisa yango esobe : kati na yango, bakolongola lisusu te, ezala mabanga to matiti ; bongo banzube mpe basende ekokola kuna. Nakopesa mitindo na mapata ete enokisela yango lisusu mvula te.


Nakobebisa milona na bango, elobi Yawe. Bambuma ya vino ekozala lisusu te na banzete ya vino, mbuma ya figi ekozala lisusu te na banzete ya figi, mpe makasa ya banzete yango ekokawuka. Bakobotola bango biloko oyo napesaki bango. › »


Boye, nakosambwisa ye na miso ya bamakangu na ye, mpe moto moko te akobikisa ye na maboko na ngai.


Bilanga ya vino ekawuki, banzete ya figi elembi-lembi, banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome, banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka. Solo, esengo ya bato esili.


« Mbala mingi, nazalaki kobwakela bilanga na bino bokono, banzete na bino ya ble mpe ya vino ekomaki kokawuka ; bongo mabanki ekomaki kolia banzete na bino ya figi mpe ya olive. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te, nzete ya vino eboti mbuma te, nzete ya olive eboti mbuma te, bilanga ebimisi bilei te, bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango, mpe bangombe ezali te kati na lopango.


Nakopekisa banyama mike-mike kolia bambuma ya bilanga na bino, bongo bilanga na bino ya vino ekotikala kozanga bambuma te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ