Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete.
« Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba ; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.
Nakosala matanga mpe nakolela mpo na bangomba mpe matiti ya esobe. Nyonso esili kokawuka mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana ; ezala makelele ya bibwele to ya bandeke ezali lisusu koyokana te ; bandeke ya likolo ekimi mpe banyama ya zamba esili kokende.
Liboso na bango, moto ezali kotumba ; sima na bango, moto ezali kozikisa. Liboso na bango, mokili ezali lokola elanga ya Edeni, mpe sima na bango, lokola esobe. Solo, ata eloko moko te ekotikala.