Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Joeli 1:18 - Mokanda na Bomoi

18 Tika ete ngombe elela ! Bibwele ekomi kotelengana, pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te ; ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Joeli 1:18
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akabi apesaki mitindo na Abidiasi : « Tambola kati na mokili mobimba, na bitima nyonso ya mayi mpe na miluka nyonso ; tango mosusu tokoki kozwa matiti ya mobesu mpe tokobatela bomoi ya bampunda mpe ya bamile mpo ete toboma lisusu te ndambo ya bibwele na biso. »


Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza.


Kino tango nini mokili ekowumela na kolela mpe matiti ya bilanga nyonso ekowumela ya kokawuka ? Banyama mpe bandeke esili kokufa mpo ete bavandi ya mokili bazali mabe. Balobaka : « Yawe akoyeba te makambo oyo ekokomela biso. »


Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.


Ezala banyama ya zamba ezali kotalela Yo, pamba te miluka ekawuki mpe moto ezikisi bilanga.


Alobaki : Yawe azali koganga wuta na Siona, mpe azali koloba wuta na Yelusalemi, na mongongo makasi lokola kake. Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele baleisaka bibwele ekokawuka, mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.


Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te, nzete ya vino eboti mbuma te, nzete ya olive eboti mbuma te, bilanga ebimisi bilei te, bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango, mpe bangombe ezali te kati na lopango.


Yango wana, likolo na bino, Lola ekangi mvula, mpe mabele eboyi kobota bambuma.


Toyebi malamu ete kino sik’oyo, bikelamu nyonso ezali kolela pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ