Kasi na mokolo wana, akoganga : « Te, nazali na ngai monganga te, mpe nazali na bilei to bilamba te kati na ndako na ngai ; bokomisa ngai mokonzi te ! »
Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.