12 Bilanga ya vino ekawuki, banzete ya figi elembi-lembi, banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome, banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka. Solo, esengo ya bato esili.
Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba, ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka kati na bilenge mibali. Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye, mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.
Esengo mpe kosepela ebungi na bilanga ya kitoko, banzembo mpe koganga ya esengo ezali lisusu te kati na bilanga ya vino ! Mokamoli vino akokamola lisusu te kati na ekamolelo, pamba te nakosukisa koganga.
Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango, nzete oyo ezalaki na mapeka na bango mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango, Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.
Esengo mpe kosepela esili kolimwa na bilanga mpe na bazamba ya Moabi ; nakawusi vino kati na bikamolelo na bango, mpe moto oyo akokamola yango na esengo azali te. Atako bato bazali koganga kasi ezali makelele ya esengo te.
Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »
Nakopekisa banyama mike-mike kolia bambuma ya bilanga na bino, bongo bilanga na bino ya vino ekotikala kozanga bambuma te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango ; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi.