Kaka na mokolo oyo olonaki yango, omonaki yango kobimisa mito ; mpe na tongo makasi, nkona na yo ebimisaki bafololo. Na mokolo ya pasi, milona na yo ekomonana pamba, mpe pasi yango ekoki kosila te.
« Bato ya Yuda bazali na matanga, bingumba na bango esili kobebisama, bazali kolela mpo na mokili na bango, mpe koganga ezali koyokana wuta na Yelusalemi.
Boboma wuta na mokili ya Babiloni bato oyo basalaka bilanga mpe bato oyo basimbaka mbeli mpo na kobuka mbuma. Likolo ya mopanga ya monyokoli, tika ete moto na moto azonga na mokili na ye, tika ete moto na moto akima na mokili na ye.