Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jide 1:8 - Mokanda na Bomoi

8 Ezali mpe ndenge moko mpo na bato wana : makanisi na bango etindikaka bango na kobebisa banzoto na bango, na kotiola bokonzi ya Nkolo, mpe na kofinga bikelamu ya nkembo ya Likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jide 1:8
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye  : koyeba malamu na mabe.


Okowumisa te kopesa Ngai mbuma ya liboso oyo ekomela mpe vino oyo okamoli. Okopesa Ngai mwana na yo ya liboso ya mobali.


Ezali na bato oyo balakelaka batata na bango mabe mpe bapambolaka te bamama na bango.


Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.


Kolakela mokonzi mabe te, ezala kati na motema na yo ; kolakela mozwi mabe te, ezala na mbeto na yo ya kolala, pamba te ndeke ya likolo ekoki komema maloba na yo mpe kopanza sango ya maloba na yo.


Bayaki lisanga mpo na kotelemela Moyize mpe Aron. Balobaki na bango : — Bino mpe bolekisi ! Lingomba mobimba ezali bule mpe moto nyonso kati na yango azali bule, mpe Yawe azali elongo na bango. Boye, mpo na nini bozali komitia likolo ya lisanga ya Yawe ?


Tango molimo mabe yango ezongaka, ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu.


Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;


Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »


Polo azongisaki : — Bandeko, nayebaki te ete azali mokonzi ya Banganga-Nzambe, pamba te nayebi malamu ete ekomama : « Okolobaka mabe te na tina na mokambi ya bato na yo. »


Kasi moto oyo azalaki konyokola ndeko na ye atindikaki Moyize mpe alobaki : « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso ?


Kasi bakoko na biso baboyaki kotosa ye ; batombokelaki ye mpe bazwaki likanisi ya kozonga na Ejipito.


Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye ; pamba te Tempelo ya Nzambe ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango.


Boye moto oyo atosaka mitindo yango te atiolaka moto te kasi atiolaka nde Nzambe oyo apesaki bino Molimo Mosantu na Ye.


mpo na bato na pite, mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, mpo na bato oyo batekaka baninga na bango bato na bowumbu, mpo na bakosi, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na bato oyo basalaka makambo oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo,


Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba.


Bomemiaka bato nyonso, bolingaka bandeko na bino kati na kondima, botosaka Nzambe, mpe bopesaka mokonzi lokumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ