Mpo na bino, bibwele na Ngai, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu, kati na bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.
Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te.
mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto ; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.