Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jide 1:18 - Mokanda na Bomoi

18 Balobaki na bino : « Na tango ya suka, ekozala na batioli oyo bakotambola kolanda baposa na bango, oyo ekotindika bango na koboya kotosa makambo ya Nzambe. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jide 1:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nayebi malamu ete, sima na ngai kokende, bambwa ya zamba ekokota kati na bino mpe ekoyokela etonga mawa te.


Kasi bato mabe mpe ba-oyo bakosaka baninga bakozala kozinda kati na mabe, kokosa bato mosusu, mpe bango moko bakokosa bango.


Pamba te na mikolo ekoya, bato bakolinga lisusu te koyoka mateya ya solo, kasi bakomilukela bango moko, kolanda baposa na bango, bateyi oyo bakoyebisa bango makambo oyo matoyi na bango esepelaka koyoka ;


Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino ; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata.


Akopesa mingi-mingi etumbu epai ya ba-oyo, mpo na lokoso na bango ya makambo ya mbindo, batambolaka kolanda baposa mabe ya nzoto mpe batiolaka bokonzi ya Nkolo. Lokola bateyi yango ya lokuta batondi na lolendo mpe bamimonaka lokola bakoka na nyonso, babangaka te kofinga bikelamu ya nkembo ;


Liboso na nyonso, boyeba ete, na mikolo ya suka, batioli bakobima, bakotambola kolanda baposa na bango moko


Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.


Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ