Jide 1:11 - Mokanda na Bomoi11 Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.