Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 9:7 - Mokanda na Bomoi

7 Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka, ebimisaka kaka maloba ya lokuta. Moto na moto alobaka na moninga na ye na esengo na monoko ; kasi na se ya motema, atielaka ye motambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 9:7
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi alobaki lisusu : — Nabondeli yo, pesa kaka nzela ete ata Aminoni, ndeko na ngai ya mobali, akende elongo na biso. Mokonzi atunaki ye : — Mpo na nini akende elongo na yo ?


Yawe, Nzambe ya batata na bango, atindelaki bango, mbala na mbala mpe na ngonga malamu, makebisi na nzela ya bamemi sango na Ye, pamba te azalaki na posa ya kobatela bato na Ye mpe Tempelo na Ye.


Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba, oyo ezali ya songe, elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.


Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.


Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.


Nakotelemela bino, nakopetola bosoto ya palata na bino mpe nakolongola salite na bino,


Tala, napetolaki yo, kasi ndenge bapetolaka palata na moto te ; namekaki yo kati na moto ya minyoko.


Pamba te maboko na bino ebebi na makila, mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe ; bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta, mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe.


Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.


« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.


« Tala, nasili kotia yo kati na bato na ngai lokola esalelo oyo bamekelaka makasi ya bibende, mpo ete okoka kotala malamu mpe omeka ezaleli na bango.


Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili ;


Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto ; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango : ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba : ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »


Akovanda lokola monyangwisi bibende mpe mopetoli palata na moto. Akopetola bana mibali ya Levi mpe akolekisa bango na moto ndenge bapetolaka wolo mpe palata, mpe bakokoma mpo na Yawe bato oyo bamemelaka Ye makabo kolanda ndenge esengeli kozala.


Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.


Balingami, bokamwa te bapasi oyo bozali komona, lokola nde likambo ya kokamwa ekomeli bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ