Nzela na yo nyonso elembisaki yo nzoto, kasi omilobelaki te : ‹ Ezali na tina te ! › Loboko na yo ezwaki lisusu makasi ya sika, yango wana olembaki te.
Bakolona ble, kasi bakobuka banzube ; bakobimisa mitoki na mosala, kasi bakozwa litomba ya malonga te. Boye, boyokela mbuma ya bilanga na bino soni, mpo na kanda makasi ya Yawe.
Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo.
Boni, moto mwindo akoki solo kobongola poso ya nzoto na ye ? Nkoyi ekoki kolongola penza matono ya poso ya nzoto na yango ? Bokokoka kosala malamu te, bino bato oyo bomesana kosala mabe.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto ; bato bazali kosala bobele mosala ya pamba mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »
Yango wana, loba na bango : ‹ Tala ekolo oyo eyokaka te maloba ya Yawe, Nzambe na yango, mpe eyokaka pamela te ; solo ezali lisusu te na minoko na bango mpe elimwe penza na bibebu na bango.
« Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye mpe atia motema te na ndeko na ye, pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.
Boni, biso nyonso tozali bana ya tata moko te ? Boni, tokelama na Nzambe moko te ? Bongo mpo na nini tozali kobebisa boyokani ya batata na biso na ndenge tozali kosalana mabe biso na biso ?
Ezali bato ya bilongi mibale nde bakobanda kokosa bango na nzela ya mateya, pamba te mitema ya bato yango ya bilongi mibale ebeba lokola nde bazikisa yango na ebende ya moto.
Sima na yango, molongo nyonso ya bato oyo bazalaki elongo na Jozue basilaki na kokufa ; mpe molongo mosusu ya bato oyo babotamaki sima na bango ebimaki, molongo oyo eyebaki Yawe te mpe emonaki te misala oyo asalaki mpo na Isalaele.