Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 9:25 - Mokanda na Bomoi

25 bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu ; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 9:25
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Dedani, Tema, Buzi mpe bato nyonso oyo bavandaka mosika mpe batikaka mandefu te ;


Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala ; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.


Tika ete bashamo na bango ekoma bomengo ya bitumba, bayiba bibwele na bango ebele. Nakopanza na mopepe bavandi ya mosika, mpe nakokweyisela bango pasi longwa na bisika nyonso, » elobi Yawe.


Okokufa kufa ya bato oyo bakatama ngenga te, na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Ngai nde nalobi, elobi Nkolo Yawe. › »


Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu ? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele ; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga. Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › »


Wana bozalaki kobonzela Ngai bilei, mafuta mpe makila ya banyama, bokotisaki kati na Esika na Ngai ya bule bapaya oyo batosaka Ngai te mpe bakatama ngenga te, mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo na Ngai ; na bongo, bobebisaki boyokani na Ngai mpo na kokokisa misala na bino nyonso ya mbindo !


Okokata suki te na bangambo nyonso ya moto na yo, okokata mpe te mandefu na bapembeni na yango.


oyo mpo na yango, Ngai natelemelaki bango mpe namemaki bango na mokili ya banguna na bango, wana mitema na bango oyo ekatama ngenga te ekomikitisa mpe bakozwa lifuti ya mabunga na bango,


« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona kati na bituka nyonso ya mabele ; yango wana nakopesa bino etumbu mpo na mabe nyonso oyo bosali.


Pamba te ezali te makambo oyo emonanaka na miso nde ekomisaka moto Moyuda, mpe ezali te elembo oyo emonanaka na nzoto nde esalaka kokatama ngenga.


Ezali kaka makambo ya kati nde ekomisaka moto Moyuda, mpe kokatama ngenga ya solo ezali nde oyo Molimo asalaka kati na motema ; ezali te oyo tosalaka na kotosa Mobeko. Lokumu ya Moyuda ya boye ewutaka na bato te, kasi na Nzambe.


Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : — Yaka ! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.


Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye : — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele ? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ