Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 9:21 - Mokanda na Bomoi

21 Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 9:21
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori.


Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka, bilombe batengaka-tengaka ;


Nakoyungola bango na nzela ya bipepelo na bikuke ya engumba, nakobotola bango bana na bango mpe nakoboma bato na Ngai, pamba te babongoli bizaleli na bango te.


Mpo na yango, boma bana na bango na nzala, kaba bango na mopanga ! Tika ete basi na bango bakufisa bana na bango mpe bakoma basi bakufisa mibali ! Tika ete kufa ekomela mibali na bango, mpe bilenge mibali na bango bakufa na mopanga ya bitumba.


Sik’oyo tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo na nini bozali komimemela pasi ya makasi boye kino mokili ya Yuda ezangela mibali, basi, babebe mpe etikala lisusu ata na moto moko te ?


Yango wana, na mokolo wana, bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala, basoda na yango nyonso ya mpiko bakokanga minoko, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. « Sopa yango na bana mike kati na babalabala mpe na lisanga ya bilenge mibali ; ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, ezala mikolo to mibange.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotia mabaku liboso ya bato oyo ; batata mpe bana na bango bakobeta mabaku mpe bakokweya nzela moko, bazalani elongo na baninga bakokufa. »


Bongo bibembe ya bato oyo ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba ; mpe moto moko te akobengana yango.


Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.


Bawelelaka kokota kati na engumba, bapotaka mbangu pene ya mir, bakotaka na bandako ndenge miyibi bakotaka na nzela ya maninisa.


« Isalaele, mboka kitoko, ekweyi na mabele, ezali kokoka kotelema lisusu te ! Basundoli yango kaka bongo, mpe moto akotelemisa yango azali te. »


Soki bato zomi batikali na bomoi kati na ndako moko, bango mpe bakokufa.


Nakotindela bato pasi ya makasi : bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga, pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe ; bakopanza makila na bango lokola putulu mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ