Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 9:20 - Mokanda na Bomoi

20 Kufa emati mpe ekoti na nzela ya maninisa na biso, ekoti kino na bandako na biso, oyo batonga makasi ; eyei kosilisa koboma bana na babalabala, mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 9:20
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye, mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo.


Yawe alobi : « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, lokola batambolaka mapeka likolo mpe balalisaka miso na lofundu, lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe mpe na kolelisa biloko ya monzele oyo balataka na makolo na bango,


Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bango mpe bana mike bakamba bango.


Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boyoka te makambo oyo basakoli bazali kosakola epai na bino !


Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ;


Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. « Sopa yango na bana mike kati na babalabala mpe na lisanga ya bilenge mibali ; ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, ezala mikolo to mibange.


Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye.


Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.


Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.


Telema, ganga na butu ndenge bakengeli basalaka na butu ; sopa motema na yo lokola mayi, na miso ya Nkolo, tombola maboko na yo epai na Ye mpo na bomoi ya bana na yo, oyo bazali kokufa nzala na babalabala nyonso.


Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo elali-lali na babalabala ; basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga ! Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo ; obomi bango na mawa te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ