Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 9:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Babongisaka lolemo na bango lokola tolotolo mpo na kokosa ; balongaka kati na mokili na nzela ya solo te, pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 9:2
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te maboko na bino ebebi na makila, mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe ; bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta, mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe.


Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?


Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo.


Mpe soki omituni : « Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? » Ezali mpo na ebele ya masumu na yo nde bapasolaki yo bilamba mpe bazokisaki nzoto na yo.


Pamba te mokili etondi na kindumba, mokili ekomi na matanga. Likolo ya bilakeli mabe, matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki, basakoli bakomi kolanda nzela mabe mpe bakomi na molende ya kosala kaka makambo oyo esengeli te.


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.


Libota ya Isalaele mpe ya Yuda etamboli na boyengebene te na miso na Ngai, » elobi Yawe.


Atako balapaka ndayi na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndayi na bango ezalaka kaka ya lokuta. »


etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.


Bazali sembo te liboso ya Yawe, baboti bana makangu ; sik’oyo, bafeti na bango ya ebandeli ya sanza ekoboma bango nzela moko na bomengo na bango.


Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai ; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.


Bango nyonso bazali bandumba, bapelaka na posa lokola moto ya fulu ya mapa, oyo molambi mapa akobaka te kobakisa koni, wuta na tango asangisaki farine kino mapa evimba.


Bazwi ya libota oyo batondi na kanza, bato ya libota oyo batondi na lokuta, mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.


Basakoli na yango bazali bato ya lolendo mpe ya lokuta. Banganga-Nzambe na yango babebisaka Esika ya bule mpe batosaka mibeko te.


Bato ya Yuda batamboli na boyengebene te, bakotisi likambo ya nkele kati na Isalaele mpe na Yelusalemi, pamba te bato ya Yuda babebisi bosantu ya Esika ya bule ya Yawe, Esika ya bule oyo Yawe alingaka makasi : babali basi oyo basambelaka nzambe mopaya.


Bozali kotuna : « Mpo na nini boye ? » Ezali mpo ete Yawe azali Motatoli kati na yo mpe mwasi na yo ya bolenge, kasi yo okosaki ye. Nzokande, azali mwasi oyo okangani na ye na nzela ya boyokani.


Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.


Sima na yango, molongo nyonso ya bato oyo bazalaki elongo na Jozue basilaki na kokufa ; mpe molongo mosusu ya bato oyo babotamaki sima na bango ebimaki, molongo oyo eyebaki Yawe te mpe emonaki te misala oyo asalaki mpo na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ