18 Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona : ‹ Ah ! Tala ndenge nini tosili kobebisama ! Tala ndenge nini tosambwe ! Tika ete tokima mokili na biso, pamba te bandako na biso ebebisami. › »
Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.
Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.
Wuta bolenge na biso, banzambe ya bikeko ebebisaki mbuma ya misala ya batata na biso, bibwele na bango mpe ngombe na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi.
Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »
Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basaki mpe bolala na putulu, bosala matanga lokola moto oyo akufisi mwana na ye se moko. Bolela na mawa, pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata.
Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye.
Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
« Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba ; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.
Kufa emati mpe ekoti na nzela ya maninisa na biso, ekoti kino na bandako na biso, oyo batonga makasi ; eyei kosilisa koboma bana na babalabala, mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka.
Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye ; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.
Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.
Naloba lisusu nini mpo na yo ? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko ? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko ? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ; nani akoki kobikisa yo ?
Mitema ya bato ezali koganga epai na Nkolo. Oh mir ya Siona, mboka kitoko, tika ete mpinzoli na yo ebima lokola ebale, butu mpe moyi, mpe miso na yo ekangama te !