Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa.
Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye.
Yango nde nzembo ya mawa oyo bakoyembela Ejipito ; bilenge basi ya bikolo mosusu nde bakoyemba yango, bakoyemba yango na tina na Ejipito elongo na bato na yango nyonso, elobi Nkolo Yawe. »
Na mokolo wana, bakosambwisa bino ; mpo na kotiola bino, bakobanda koyembela bino banzembo oyo : ‹ Tobebisami penza mobimba ! Libula ya bato na ngai ekabwani ! Abotoli yango na maboko na ngai mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › »