Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 9:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Botala malamu makambo oyo ! Bobengisa basi oyo balelaka bibembe, bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 9:16
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabondeli Yo, kanisa maloba oyo otindaki Moyize, mosali na Yo, koloba : ‹ Soki botamboli na bosembo te, nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya.


ya kopanza bakitani na bango kati na bikolo mosusu mpe ya koboma bango kati na mikili nyonso.


tango bato bakomaka kobanga komata likolo, mpe bakomaka kobanga makama na nzela ; tango nzete ya pome ebimisaka mbuma, tango mabanki ekomaka kilo, mpe baposa ekokisamaka lisusu te ; pamba te moto akendaka na ndako ya libela, mpe basi oyo balelaka na bibembe basanganaka na balabala.


« Nakopanza bino lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ya esobe ememaka.


Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, kino tango ekosilisa koboma bango na mokili oyo napesaki bango elongo na batata na bango. »


« Boye loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomela, bolangwa mpe bosanza, bokweya mpo na kotelema lisusu te, mpo na mopanga oyo nakotinda kati na bino. ›


tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, mpe nakokomisa bango lokola mbuma ya figi oyo epola, oyo moto ata moko te akokoka kolia.


Pamba te nazali kolandela bango malamu mpo ete bamona pasi kasi bolamu te. Bato nyonso ya Yuda kati na Ejipito bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi kino tango bango nyonso bakosila kobebisama.


Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye.


Yoka koganga ya bato na ngai wuta na mokili ya mosika : « Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona ? Mokonzi na yango azali lisusu kuna te ? » « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai na nzela ya banzambe na bango ya bikeko, na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina ? »


Mpo na yango, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. ›


Bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopanza bango kati na bikolo mosusu mpe kati na mikili mosusu.


To soki natindi mopanga ete eboma bato ya ekolo wana mpe nalobi : ‹ Tika ete mopanga eleka na mokili mobimba ! › Soki nabomi bato mpe bibwele na yango ;


Nzokande, kati na esobe, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopanza bango kati na bikolo mpe kati na mikili ya bapaya ;


« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na Tiri !


Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.


Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato ; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga.


Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Kolela ekozala na babalabala nyonso, mpe koganga ya somo ekozala na bisika nyonso oyo bato bakutanaka. Bakobengisa basali bilanga na matanga, mpe bato oyo balelaka bibembe mpo na kolela.


Na mokolo wana, bakosambwisa bino ; mpo na kotiola bino, bakobanda koyembela bino banzembo oyo : ‹ Tobebisami penza mobimba ! Libula ya bato na ngai ekabwani ! Abotoli yango na maboko na ngai mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › »


Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »


Yawe akosala ete banguna na bino balonga bino. Bakoya epai na bino na nzela moko mpe bino bokokima liboso na bango na banzela sambo. Bokokoma eloko ya somo na miso ya bikolo nyonso ya mokili.


Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.


Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.


Nalobaki : Nakopanza bango mpe nakosala ete bato babosana bango.


Yawe akopanza bino kati na bato. Kasi ndambo kaka ya bato kati na bino nde bakowumela kati na bikolo epai wapi Yawe akomema bino.


Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ