Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 9:12 - Mokanda na Bomoi

12 Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 9:12
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.


Tika ete moto ya bwanya asala keba na makambo wana nyonso mpe akanisa na tina na bolingo ya Yawe !


Nani kati na bino akoyoka makambo yango ? Nani akozala na bokebi na makambo oyo ekoya ?


Pamba te mokili etondi na kindumba, mokili ekomi na matanga. Likolo ya bilakeli mabe, matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki, basakoli bakomi kolanda nzela mabe mpe bakomi na molende ya kosala kaka makambo oyo esengeli te.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boyoka te makambo oyo basakoli bazali kosakola epai na bino !


Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai, balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai, mpe bato na Ngai balingaki kotika banzela mpe misala na bango ya mabe !


Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ;


Kufa emati mpe ekoti na nzela ya maninisa na biso, ekoti kino na bandako na biso, oyo batonga makasi ; eyei kosilisa koboma bana na babalabala, mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka.


Solo, bokobondisama tango bokomona bizaleli mpe misala na bango ; pamba te bokososola ete ezali na pamba te nde nasalaki makambo oyo nyonso kati na Yelusalemi, elobi Nkolo Yawe. »


Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.


Bakolia, kasi bakotonda te ; bakosala kindumba, kasi bakobotana te ; pamba te basundolaki Yawe


Bino basali bilanga, bozala na soni ; bino baloni vino, bolela mpo na mbuma ya ble mpe ya orje, pamba te milona ebebisami.


Nabomi bato ya bikolo mosusu, bandako na bango ya makasi ebebisami. Nasali ete babalabala na bango etikala lisusu na bato te mpo ete moto moko te alekela lisusu wana. Bingumba na bango ebebisami, ata moto moko te atikali lisusu kuna.


Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—


Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !


Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ