Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 9:1 - Mokanda na Bomoi

1 Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 9:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.


Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe, ya Nzambe na bomoi. Tango nini nakoki kokende, mpe tango nini nakoki kokutana na Nzambe ?


Nakomi komilobela : « Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga, nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi ;


Yango wana, nazali kolela lokola Yaezeri mpo na vino ya Sibima. Eshiboni mpe Eleale, nazali kosopa mpinzoli mpo na bino ! Koganga ya esengo esili mpo bambuma na bino mpe mpo na biloko oyo bobuki na bilanga na bino.


Yango wana nalobaki : « Botika kotala Ngai, botika ete nalela makasi ! Bomeka kobondisa Ngai te mpo na kobebisama ya bato na Ngai ! »


Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.


Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.


Atako bongo, ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, azongaki epai na Ngai te na motema na ye mobimba ; azongaki na ye kaka likolo-likolo, » elobi Yawe.


Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh ! Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi, ezali koswa makasi kati na ngai, mpe nazali kokoka kokanga monoko te, pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.


« Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo ? Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko oyo ezali ata banzambe te. Nakokisaki baposa na bango nyonso, kasi basalaki kaka ekobo mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.


Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basaki mpe bolala na putulu, bosala matanga lokola moto oyo akufisi mwana na ye se moko. Bolela na mawa, pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata.


Pasi na ngai ezangeli kisi mpo na kosilisa yango, motema na ngai elembi kati na ngai.


Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona : ‹ Ah ! Tala ndenge nini tosili kobebisama ! Tala ndenge nini tosambwe ! Tika ete tokima mokili na biso, pamba te bandako na biso ebebisami. › »


Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.


Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe.


Bango nyonso bazali bandumba, bapelaka na posa lokola moto ya fulu ya mapa, oyo molambi mapa akobaka te kobakisa koni, wuta na tango asangisaki farine kino mapa evimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ