Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba, bato ya bwanya ya Faraon bakomi kopesa batoli oyo ezanga tina. Ndenge nini bokoki penza koloba na Faraon : « Ngai, nazali moko kati na bato ya bwanya, moyekoli ya bakonzi ya kala ? »
Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »
Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba.
Na tina na Edomi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, engumba ya Temani etikali lisusu na bato ya bwanya te ? Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te ? Boni, bwanya na bango esili penza ?
Boni, bazali penza koyokela makambo na bango ya nkele soni te ? Te, bazali na bango koyoka ata soni te ; bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te. Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.
Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.
Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango, basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana. Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli ; Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te koteya malakisi ya Mobeko, mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te babwakaki Mobeko na Ngai, babatelaki te bikateli na Ngai mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.
Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale.
Botosa yango mpe bosalela yango na bokebi ; yango nde ekokomisa bino bato ya bwanya mpe ya mayele na miso ya bikolo oyo bakoyoka sango ya mitindo mpe mibeko yango ; mpe bakoganga : « Solo, libota monene oyo ezali na bato ya bwanya mpe na bato ya mayele. »