7 Ezala kutu nkongi, kati na likolo, eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ; ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila eyebaka ata tango ya kozonga, kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.
Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.
Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino, bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango, kasi bakanisaka te mosala na Yawe mpe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye.
Natombolaki miso mpe namonaki liboso na ngai basi mibale bazali kopumbwa mpo na koya epai na biso. Mapapu na bango ezalaki minene lokola mapapu ya nkongi. Batombolaki sani yango kino na kati-kati ya likolo mpe se.