soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo,
Tika ete moto mabe atika banzela na ye, mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye ; tika ete azonga epai na Yawe mpo ete ayokela ye mawa, tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, pamba te alimbisaka kaka.
Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi : bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »
« Bino batomboki, bozonga epai na Ngai mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino ! » « Solo, tokozonga epai na Yo, pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.
Tango mosusu, soki bato ya Yuda bayoki sango ya pasi nyonso oyo nabongisi mpo na kotindela bango, moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; mpe, na bongo, Ngai nakolimbisa mabe mpe masumu na bango. »
« Oh Isalaele, soki okozonga, zonga epai na Ngai, » elobi Yawe, « soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ;
Boni, bokanisi penza ete Ngai nasepelaka solo na kufa ya bato mabe, elobi Nkolo Yawe, to nasepelaka te tango batikaka banzela na bango ya mabe mpo ete bazala na bomoi ?
Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga ; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.
Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba : azongeli te Yawe, Nzambe na ye ; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te !