3 Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›
Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.
kasi bakoloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. »
Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »
bango nyonso balongwaki na mikili nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana mpe bazongaki kati na Yuda, epai ya Gedalia, kuna na Mitsipa, mpe babukaki bambuma ya vino mpe bambuma mosusu ebele.
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomonaki pasi makasi oyo natindaki na Yelusalemi mpe na bingumba nyonso ya Yuda. Na mokolo ya lelo, etikali pamba mpe ebebisami makasi
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Tika ete bosangisa ndambo ya bana ya Isalaele oyo batikali ndenge balokotaka mbuma ya vino oyo etikalaka ; bolekisa lisusu maboko na bino na likolo ya bitape ya banzete ya vino lokola moto oyo abukaka mbuma ya vino. »
Nkolo, ozali sembo ; kasi biso, lelo, tolatisami na soni : bato ya Yuda, bavandi ya Yelusalemi mpe bana nyonso ya Isalaele, ezala ba-oyo bazali pembeni to ba-oyo bazali mosika, kati na mikili nyonso epai wapi opanzaki biso mpo ete tozangaki boyengebene liboso na Yo !
Mpo na yango, Yawe alobi : « Nazali kobongisa mabe mpo na ekolo ya lolenge oyo : ekozala pasi moko oyo bakokoka komibikisa na yango te. Bakokoka lisusu kotambola na lolendo te, pamba te ekozala tango ya pasi makasi.
Maloba oyo nawuti koloba, mapamboli mpe bilakeli mabe oyo napesi yo mpo ete opona, ekokokisama. Soki obateli yango malamu na motema na yo kati na bikolo nyonso epai wapi Yawe, Nzambe na yo, akobengana yo ;
Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te !