Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 8:15 - Mokanda na Bomoi

15 Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia, kasi tomoni likambo moko te ya malamu ; tozalaki na elikya ete tokobika, kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 8:15
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazelaki esengo, kasi pasi nde ekomeli ngai ; nazelaki pole, kasi molili nde ekomeli ngai.


Babebisi bakobimela na likolo ya bangomba nyonso ya esobe, pamba te mopanga ya Yawe ekoboma mokili mobimba ; moto moko te akozala na kimia.


Boni, obwaki solo Yuda ? Oyini penza Siona ? Mpo na nini otindeli biso pasi makasi oyo ezangeli nzela ya kobika ? Tokanisaki ete tokozwa kimia ; nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te ! Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono ; nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi !


Bongo nalobaki : « Oh Nkolo Yawe, tala ndenge okosaki bato oyo mpe Yelusalemi tango olobaki : ‹ Bokozala na kimia ! › Nzokande mopanga ezalaki kozela biso. »


Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te, pamba te monguna asimbi mopanga, bongo somo makasi ezali bisika nyonso.


bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba : ‘ Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu ! ’ Nzokande, ata likambo moko ya malamu ezali te.


Tango makambo oyo ya somo ekoya, bakoluka kimia kasi bakozwa yango te.


Bato ya etuka ya Meroti bazali kolenga na somo mpo na bolamu na bango, pamba te Yawe atindi pasi ya makasi kino na ekuke ya Yelusalemi.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ