Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 8:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mpo na nini tozali kovanda awa ? Tosangana esika moko ! Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi mpo ete tokufela kuna ! Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 8:14
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi ayebisaki Abishayi : « Sheba, mwana mobali ya Bikiri, akomonisa biso pasi mingi koleka Abisalomi. Kamata basali ya mokonzi mpe landa ye, noki te akomona bingumba batonga makasi mpe akokima biso. »


Namilobelaki : « Nakosala keba na etamboli na ngai mpo ete monoko na ngai esala masumu te ; nakobatela penza monoko na ngai tango nyonso moto mabe akozala liboso na ngai. »


Mafinga ezokisi motema na ngai, mpe pota yango ezali kosila te ; nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato, kasi namonaki yango te ; nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.


Vanda kimia, kende na molili, Babiloni, mboka kitoko, pamba te bakobenga yo lisusu te « mwasi mokonzi ya bikolo. »


Oh Yawe, tososoli solo mabe na biso mpe masumu ya batata na biso ! Solo, tosali penza masumu liboso na Yo.


Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli : « Nakoleisa bango bilei ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge, pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusalemi nde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. »


Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »


Kasi tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abotolaki mokili oyo, tolobaki : « Boya, tokende na Yelusalemi mpo ete tobikisa bomoi na biso liboso ya basoda ya Babiloni mpe ya Siri. » Yango wana, toyaki kovanda na Yelusalemi.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tala, nakoleisa bato oyo matiti ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge.


Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te ; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »


Nakanisi pasi mpe minyoko na ngai, ezali lokola ngenge mpe masanga ya bololo.


Moyize alobaki na Aron : « Tomoni kokokisama ya maloba oyo Yawe asakolaki tango alobaki : ‹ Bato nyonso oyo bakobelema liboso na Ngai basengeli kotosa bosantu na Ngai, mpe Ngai nakomonisa nkembo na Ngai na miso ya bato nyonso. › » Aron alobaki ata liloba moko te.


Soki noko moko oyo asengeli kotumba bibembe ayei kobimisa yango na ndako mpe atuni na moto nyonso oyo abombami kuna : — Boni, ozali elongo na moto mosusu kuna ? Akozongisa : — Te, moto mosusu azali te ! Bongo akoloba lisusu : — Esili ! Bakolobela lisusu Kombo ya Yawe te.


Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !


Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.


bapesaki Yesu masanga ya vino basangisa na mayi ya bololo mpo ete amela ; kasi sima na Ye komeka masanga yango, aboyaki komela yango.


Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba : ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye.


Bilanga na bango ya vino ewuti na bilanga ya vino ya Sodome mpe na bilanga ya Gomore. Bambuma na bango etondi na ngenge, mpe maboke ya bambuma na bango ezali bololo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ