Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 8:12 - Mokanda na Bomoi

12 Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ? Te ! Bazali koyoka ata soni te ; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni ! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 8:12
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo oyo elandaki, kulutu alobaki na leki : « Na butu oyo ewuti koleka, nasangisaki nzoto na tata na ngai. Tika ete topesa ye lisusu masanga ya vino na butu ya lelo, mpe yo okokende kosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. »


Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela, akokanga yo kati na ndako na yo, akobwaka yo libanda mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.


Ekozala mpe kaka ndenge moko mpo na Banganga-Nzambe mpe bato, mpo na nkolo mpe mowumbu na ye, mpo na nkolo ya mwasi mpe mwasi mosali na ye, mpo na moteki mpe mosombi, mpo na modefisi mpe modefi, mpo na moto oyo bakofuta ye niongo mpe mpo na moto oyo akofuta niongo.


Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !


Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola ; ekolimwa na tango ya kosambisama.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na basakoli oyo bazali koloba na Kombo na Ngai : « Natindaki bango te, atako bazali koloba : ‹ Mopanga mpe nzala makasi ekokweya na mokili oyo te. › Basakoli yango bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi.


« Yango wana, nzela na bango ekokoma moselu mpe molili ; bakobengana bango kino na mboka ya molili mpe kuna bakokweya. Nakotindela bango pasi, tango oyo nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.


Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.


Kino lelo, bamikitisi te, batosi Ngai te, batosi mibeko mpe malako na Ngai te, oyo napesaki bino mpe batata na bino.


Boni, bazali penza koyokela makambo na bango ya nkele soni te ? Te, bazali na bango koyoka ata soni te ; bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te. Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotia mabaku liboso ya bato oyo ; batata mpe bana na bango bakobeta mabaku mpe bakokweya nzela moko, bazalani elongo na baninga bakokufa. »


Tango alakisaki polele kindumba na ye mpe atalisaki bolumbu na ye, nayinaki ye, ndenge kaka nayinaki ndeko na ye ya mwasi.


Efrayimi akobebisama na mokolo ya etumbu na ye. Nazali koloba makambo ya solo kati na bikolo ya Isalaele.


Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te ; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.


Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »


Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ