Jeremi 8:10 - Mokanda na Bomoi10 Yango wana, nakokaba basi na bango epai ya mibali mosusu, mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu ; pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike, batondi na lokoso ya mbongo ; basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomi se kotambola na lokuta ; အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yawe alobaki na ngai : — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko.
Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »