Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi : Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso, bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli ; soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai, kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto ; mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango.
Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedele nde ekolendisa bokonzi na yo ? Tata na yo azangaki bilei mpe masanga te, kasi atambolaki na bosembo mpe na boyengebene ; boye alongaki na makambo nyonso.
Bobongola sik’oyo bizaleli mpe misala na bino, mpe botosa Yawe, Nzambe na bino ; mpe Yawe akobongola mokano oyo asilaki kozwa, mpe akotindela bino lisusu te pasi oyo alakaki bino.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bobongola bizaleli mpe misala na bino, mpe Ngai nakotika bino ete bowumela na esika oyo.
abatelaka loboko na ye mpo ete esala masumu te, adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka mibeko mpe atosaka bikateli na Ngai ; solo, mwana wana akokufa te mpo na masumu ya tata na ye : akozala solo na bomoi.
adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka loboko na ye mpo ete esala mabe te, akataka makambo ya bato mibale na bosembo ;
Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele ? »
Kati na bato ya Yabeshi ya Galadi, bamonaki bilenge basi nkama minei oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te ; bazwaki bango mpe bamemaki bango na molako, na Silo, kati na mokili ya Kanana.