Jeremi 7:3 - Mokanda na Bomoi3 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bobongola bizaleli mpe misala na bino, mpe Ngai nakotika bino ete bowumela na esika oyo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi bakokotela na bikuke ya engumba oyo elongo na bakalaka na bango ; bongo bango elongo na bakalaka na bango bakoya na likolo ya bashar mpe mpunda elongo na bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi ; bongo, bato bakovanda libela na libela na engumba oyo.
Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›
Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.