Jeremi 7:25 - Mokanda na Bomoi25 Wuta tango batata na bino babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo, natindelaka bino basali na Ngai, basakoli, tango nyonso mpe mikolo nyonso. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki mobeko epai ya bana na ye ete bamela masanga ya vino te, mpe babatelaka mobeko yango. Kino na mokolo ya lelo, bamelaka masanga ya vino te mpo na kotosa mobeko oyo koko na bango apesaki bango. Nzokande, tango na tango, Ngai nazalaki koloba na bino, kasi bozalaki koyoka Ngai te.
Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.