Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 7:21 - Mokanda na Bomoi

21 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bokoba kaka na makambo oyo bozali kosala, bobakisa mbeka na bino ya kotumba mpe makabo mosusu, mpe bolia misuni yango bino moko !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 7:21
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakopamela yo te na tina na bambeka na yo, pamba te bambeka na yo ya kotumba ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


Omemelaki Ngai bana meme te lokola mbeka ya kotumba, mpe opesaki Ngai lokumu te na nzela ya bambeka na yo. Nakomisaki yo mowumbu te mpo ete opesa Ngai malasi ya ansa lokola makabo, mpe nalembisaki yo te mpo ete obonzela Ngai malasi.


Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.


Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba to na matiti ya solo kitoko oyo ewuti na mboka ya mosika ? Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, mpe nandimaka makabo na bino te. »


Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula !


Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.


Bokotumba mosuni mpe makila ya bambeka na bino ya kotumba na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bokosopa makila ya bambeka na bino mosusu na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino ; kasi mpo na mosuni na yango, bokoki na bino kolia yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ