Jeremi 7:20 - Mokanda na Bomoi20 ‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele : kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›