2 « Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo : ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe.
Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Yawe alobaki na ngai : — Sakola maloba nyonso oyo kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi : « Boyoka malako ya boyokani oyo mpe bosalela yango !
« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.
Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.
Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango.
Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai ; bongo Yawe abimisaki ngai na nzela ya Molimo na Ye mpe amemaki ngai kino na kati-kati ya lubwaku moko etonda na mikuwa.
Bino Banganga-Nzambe, boyoka ! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi ! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka ! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.
Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai : « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki ! »
Bino nyonso, bikolo, boyoka ! Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo, botia matoyi mpe boyoka ! Nkolo Yawe azwi bino na likambo ; Yawe akosambisa bino wuta na Ndako na Ye ya bule !
Boye, nalobaki : « Boyoka, bino bakambi ya libota ya Jakobi, bino batambolisi ya libota ya Isalaele ! Ezali bino te bato bosengeli koyeba malamu mibeko ?
Yesu azongiselaki ye : — Nazalaki koloba na polele penza na miso ya bato nyonso, nazalaki koteya tango nyonso kati na bandako ya mayangani mpe kati na Tempelo, epai wapi Bayuda nyonso basanganaka ; nalobaki eloko moko te na nkuku.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »