Wuta na tango ya bakoko na biso kino na mokolo ya lelo, mabe na biso ekomi ebele. Likolo ya masumu na biso, biso elongo na bakonzi mpe Banganga-Nzambe na biso tokabamaki na mopanga, na bowumbu, na kobebisama mpe na soni makasi na maboko ya bakonzi ya bapaya, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
Yango wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Elombe ya Isalaele alobi : Ah, mawa ! Nakosepela na pasi na bino, bino bayini na Ngai ; mpe nakofutisa bino masumu, bino banguna na Ngai !
Mama ya bana sambo akolemba nzoto mpe akopema na pasi makasi. Moyi na ye ekolala wana mokolo ezali nanu kowumela : akoyokisama soni mpe akosambwa. Nakoboma na mopanga, bato oyo bakotikala na bomoi liboso ya banguna na bango, » elobi Yawe.
Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba ; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te ; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.
Kasi boyokaki Ngai te, › elobi Yawe, ‹ botumbolaki Ngai kutu na nzela ya banzambe ya bikeko, oyo maboko na bino esalaki, mpe bomibendelaki bino moko pasi. › »
Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »
likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino.
Yoka koganga ya bato na ngai wuta na mokili ya mosika : « Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona ? Mokonzi na yango azali lisusu kuna te ? » « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai na nzela ya banzambe na bango ya bikeko, na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina ? »
Eh basi, boyoka Liloba na Yawe ! Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye. Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa mpe tika ete moko na moko ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.