Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 7:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bana bazali kolokota bakoni, batata bazali kopelisa moto, mpe basi bazali kosangisa farine mpo na kosala mapa mpo na Ishitari  ; bazali kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe mosusu, bongo ezali kopesa Ngai kanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 7:18
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi yo, osali mabe koleka bato nyonso oyo bazalaki liboso na yo : omisaleli banzambe mosusu, bikeko ya bibende banyangwisa na moto ; boye, olamusi kanda na Ngai mpe opesi Ngai mokongo.


« Mpo ete nazwaki yo kati na putulu mpe nakomisi yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele, kasi otambolaki na banzela ya Jeroboami mpe okweyisi bato na Ngai, Isalaele, na masumu oyo epelisi kanda na Ngai,


Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epai ya banzambe mosusu bakomona pasi mingi. Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wana mpe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.


Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi ; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.


Libula na yo ezali nde banzambe ya bikeko kati na mabanga ya lubwaku, oyo babongisa ; solo, yango nde ezali libula na yo. Solo penza, ezali epai na yango nde ozali kosopa makabo ya masanga ya vino mpe kobonza makabo ya bambuma. Boni, nasepela solo na makambo ya boye ?


Kasi mpo na bino bato oyo bosundoli Yawe mpe bobosani ngomba na Ngai ya bule, bino oyo botandaka mesa mpo na Gadi mpe botondisaka kopo ya vino mpo na Meni,


bato oyo bapesaka Ngai kanda tango nyonso na nko, babonzaka mbeka kati na bilanga mpe babonzaka malasi ya ansa na bitumbelo basala na babiliki ;


Nakosambisa bato na Ngai mpo na mabe oyo basalaki : basundolaki Ngai, bakomaki kobonza mbeka ya malasi epai ya banzambe mosusu, mpe bakomaki kogumbamela banzambe oyo basalaki na maboko na bango.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo alonaki yo asili kozwa mokano ya kotindela yo pasi ya makasi, pamba te libota ya Yuda mpe ya Isalaele basali mabe liboso na Ngai mpe batumboli kanda na Ngai tango bazali kotumbela nzambe Bala malasi ya ansa.


Ndenge bakanisaka bana na bango ya mibali, ndenge wana mpe bakanisaka bitumbelo na bango mpe makonzi ya Ashera, nzambe mwasi, pembeni ya banzete ya mibesu na likolo ya bangomba.


Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › »


Kasi boyokaki Ngai te, › elobi Yawe, ‹ botumbolaki Ngai kutu na nzela ya banzambe ya bikeko, oyo maboko na bino esalaki, mpe bomibendelaki bino moko pasi. › »


Bato ya Babiloni oyo bazali kobundisa engumba oyo, bakokota kati na yango mpe bakotumba yango ; bakotumba yango elongo na bandako oyo, na likolo ya manzanza na yango, bato bazalaki kotumbola Ngai na kobonza bambeka ya malasi ya ansa epai ya nzambe Bala mpe kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe ya bapaya.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bino mpe basi na bino, bomonisi na nzela ya misala na bino elaka oyo bopesaki tango bolobaki : « Tokokokisa solo ndayi oyo tolapaki ete tokotumba malasi ya ansa mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, nzambe mwasi ya bato ya Babiloni. » Bokende ! Bosala ndenge bolobi mpe bokokisa ndayi na bino !


Nzokande, nazalaki tango na tango kotinda basali na Ngai, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Bosala te makambo ya nkele oyo nayinaka. ›


Boni, ozali komona te makambo oyo bazali kosala kati na bingumba ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ?


Bilenge mibali bazali komema libanga oyo banikelaka ble ; bongo bana mike bazali kotepatepa na se ya kilo ya bakoni.


Osalaki kindumba na bato ya Ejipito, baninga na yo, oyo bazali na banzoto ya bingambe ; mpe osalaki kindumba makasi mpo na kopesa Ngai kanda.


Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga.


Akotisaki ngai kati na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe : na ekotelo ya Tempelo, bato tuku mibale na mitano bazalaki na kati-kati ya ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe etumbelo ; bapesaki mikongo na Tempelo ya Yawe mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya este ; bazalaki kogumbama na kotalaka na ngambo ya este mpo na kogumbamela moyi.


Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, omoni ? Boni, ezali penza pamba mpo na libota ya Yuda kosala makambo ya nkele oyo bazali kosala na esika oyo ? Batondisa lisusu mokili na makambo na bango ya kanza mpo na kokoba kotumbola kanda na Ngai ? Tala ndenge bazali kotombola mandalala kino na zolo !


Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Boni, tozali makasi koleka Ye ?


Bapesaki Yawe kanda makasi likolo ya banzambe na bango ya bapaya, mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo.


Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te, batumbolaki kanda na Ngai likolo ya biloko oyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te. Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpe bayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa ; nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda.


Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ