10 bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba : ‘ Tobiki na biso ! ’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele ?
Yawe alobaki na ye : « Nayoki losambo mpe libondeli na yo, oyo osali liboso na Ngai ; nabulisi Tempelo oyo otongi mpo ete natia Kombo na Ngai kati na yango mpo na libela. Miso mpe motema na Ngai ekobanda kozala kuna tango nyonso.
Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki : « Nakotia Kombo na Ngai kati na Yelusalemi. »
Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki : « Kombo na Ngai ekozala kati na Yelusalemi mpo na libela. »
Atiaki kati na Tempelo ya Yawe nzambe ya ekeko oyo asalisaki ; nzokande, Nzambe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele.
Nzokande bino, na mwa mikolo oyo kaka, bobongolaki bino moko mitema mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai : moko na moko kati na bino asakolaki kokangolama ya ndeko na ye, apesaki ndeko na ye bonsomi. Bosalaki kutu boyokani yango liboso na Ngai, kati na Ndako Ngai.
Bobosani mabe oyo batata na bino, bakonzi mpe basi ya bakonzi ya Yuda basalaki ? Bobosani mabe oyo bino mpe basi na bino bosalaki kati na mokili ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ?
makambo oyo nasalaki na Silo, nakosala yango mpe sik’oyo na Ndako na Ngai, na Tempelo oyo bozali kotiela motema, esika oyo napesaki bino elongo na batata na bino.
Bato ya Yuda basali mabe na miso na Ngai, elobi Yawe, batie banzambe na bango ya bikeko ya mbindo kati na Ndako na Ngai mpe bakomisi Ndako na Ngai mbindo.
Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko ! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko.
Bato yango bakoyina yo, bakosala yo mabe penza mpe bakobotola yo mbuma ya mosala na yo ; bakolongola yo bilamba mpe okotikala bolumbu, bongo soni ya kindumba na yo ekobima polele. Kindumba mpe ekobo na yo
pamba te basalaki kindumba, mpe makila etondi na maboko na bango ; basalaki kindumba na banzambe na bango ya bikeko, mpe babonzaki lokola mbeka bana na bango ya mibali oyo babotelaki Ngai, mpo ete bakoma bilei ya banzambe na bango ya bikeko.
Kaka na mokolo oyo bazalaki kobonza lokola mbeka bana na bango epai ya banzambe na bango ya bikeko, bazalaki mpe kokota na Esika na Ngai ya bule mpe kobebisa bosantu na yango. Yango nde bazalaki kosala kati na Ndako na Ngai.
Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula !
Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.
Mpe lisusu, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe : ‹ Lokola bokomisi Ndako na Ngai ya bule mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko mpe makambo na bino ya nkele, nakolongola Ngai moko ngolu na Ngai na likolo na bino : liso na Ngai ekotala bino lisusu na mawa te mpe nakobikisa bino lisusu te. ›
Nzambe na ngai, defisa ngai litoyi na Yo mpe yoka ngai na bokebi ! Fungola miso na Yo mpe mona kobebisama ya bisika na biso mpe ya engumba oyo mpo na bolamu na yango. Ngai, nazali kobelela Kombo na Yo ! Ezali te mpo tozali sembo, kasi ezali nde mpo na mawa monene na Yo nde tozali kobondela Yo !
Botumba farine oyo batia levire lokola likabo ya kozongisa matondi, mpe bobeta tolo mpo na makabo na bino, oyo bokati kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko. Bino bana ya Isalaele, bolobela yango na mongongo makasi, pamba te bolingaka nde kosala bongo, elobi Nkolo Yawe.
bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [
Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »
Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.