Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 6:8 - Mokanda na Bomoi

8 Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, noki te nakomikomisa mosika na yo mpe nakokomisa mokili na yo esobe, mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 6:8
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, bino bakonzi, bozala na mayele ; bino bayangeli ya mokili, boyoka likebisi oyo.


Nzokande oyinaka malako na ngai mpe oyokaka te maloba na ngai ?


Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo


Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.


Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo, kobwaka yango te, batela yango malamu mpo ete ezali bomoi na yo.


Nzokande, baboyaki koyoka, bayeisaki mito na bango makasi mpo na koboya kaka koyoka mpe kolanda mitindo na Ngai.


Bankosi engalaki na koganga mpo na kolengisa ye, ekomisaki mokili na ye lokola esobe ; batumbaki bingumba na ye mpe etikalaki lisusu na bato te.


Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema ; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›


Bapesaki Ngai mokongo na esika ya kotala Ngai. Atako nazalaki tango na tango koteya bango, kasi batikalaki koyoka Ngai te mpe baboyaki kozwa mayele.


Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ?


‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele : kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te.


Yango wana, loba na bango : ‹ Tala ekolo oyo eyokaka te maloba ya Yawe, Nzambe na yango, mpe eyokaka pamela te ; solo ezali lisusu te na minoko na bango mpe elimwe penza na bibebu na bango.


Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba.


Nani azali penza na bwanya mpo na kososola makambo ya boye ? Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ? Mpo na nini mokili ebebisami, etikali pamba lokola esobe epai wapi moto alekaka te ? »


Tango alakisaki polele kindumba na ye mpe atalisaki bolumbu na ye, nayinaki ye, ndenge kaka nayinaki ndeko na ye ya mwasi.


Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka ; mpe akokufa na posa ya mayi.


Ezala soki babokoli bana, nakobotola bango liboso ete bakola. Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo !


Boye, mokili na bino ekosepela Saba na yango mibu nyonso oyo ekozanga bato mpe oyo bokokima epai ya banguna na bino ; ekozwa bopemi mpe ekosepela Saba na yango.


Namilobelaki boye na tina na engumba oyo : « Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai ! » Boye bandako na yango ekobukana lisusu te, mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te. Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala misala na bango ya mabe.


Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ