Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 6:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombama zingazinga ya Yelusalemi ! Engumba oyo esengeli kozwa etumbu, pamba te etondi na makambo mabe !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 6:6
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi ya Asiri : ‹ Akokota na engumba oyo te, akobeta kuna ata mbanzi moko te, akobundisa yango na banguba te mpe akomatisa ata mabele te liboso na yango mpo na komibomba.


Na tango nyonso oyo nalobaka, nagangaka makasi mpo na kosakola kaka mobulu mpe kobebisama. Mokolo na mokolo, Liloba na Yawe ememelaka ngai kofingama mpe pamela ya mabe.


« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »


Tala, banguna basili kobongama mpo na kobotola engumba ! Likolo ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, oyo bazali kobundisa yango. Makambo oyo olobaki ekokisami, ndenge ozali komona yango na mokolo ya lelo.


Wuta batonga engumba oyo kino na mokolo ya lelo, mosala na yango kaka kotumbola Ngai mpe kopesa Ngai kanda ; yango wana, nakolongola yango liboso na Ngai.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na bandako ya engumba oyo mpe ya bandako ya bakonzi ya Yuda, oyo babukaki mpo na kotelemela bangomba mike ya kokimela mpe mopanga ya monguna


Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu libwa na bokonzi, na sanza ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.


Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? » elobi Yawe. « Boni, motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya boye ?


Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? » elobi Yawe ? « Motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya lolenge oyo ?


Sala yango lokola engumba oyo bazingela, oyo batonga mabulu ya kobombamela zingazinga na yango mpe oyo batelemisa bamir ya zelo mpo na kobombama, engumba oyo batonga milako zingazinga na yango, mpe telemisa bakonzi ya basoda oyo babongami mpo na kobundisa yango na zingazinga.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala Yelusalemi ! Natiaki yango na kati-kati ya bikolo, mpe bamboka minene ezingelaki yango.


Mokonzi ya mokili ya nor akoya kotonga mwa bangomba ya mabele zingazinga ya engumba oyo batonga makasi mpe akobotola yango. Mampinga ya basoda ya mokonzi ya sude bakokoka kobundisa ye te. Ezala basoda na bango ya mpiko, bakozala ata na makasi ya kobunda te.


Mawa na engumba ya batomboki, engumba ya makambo ya mbindo, mpe engumba oyo enyokolaka bato !


Mikolo ya pasi ekokomela yo, mikolo oyo banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozingela yo mpe bakofinafina yo na bangambo nyonso ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ