pamba te basundoli ndako ya mokonzi ; engumba oyo etonda makelele etikali lisusu na bato te, Ofeli mpe ndako molayi ya bakengeli ekomi mpo na libela mabulu ya mabanga mpo na bisengo ya ba-ane ya zamba, mpe ekokoma etando epai wapi bibwele ekobanda kolia matiti,
Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »
bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani.
Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »
Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »
Emoniseli ya mosakoli Abidiasi. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na Edomi : « Toyoki sango moko kowuta na Yawe ; mpe ntoma moko atindami na bikolo mpo na koloba : ‹ Botelema. Tokende kobundisa Edomi. ›