Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 6:30 - Mokanda na Bomoi

30 Babengaka bango palata babwaka, pamba te Yawe asundola bango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 6:30
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Yawe abwakaki bana nyonso ya Isalaele, ayokisaki bango pasi, akabaki bango na maboko ya bato ya mobulu, mpe abenganaki bango mosika na Ye.


Olongolaka bato nyonso ya mabe ya mokili lokola bosoto ; yango wana nalingaka malako na Yo.


Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa mpe batikala nanu kobelela Nzambe te, bazali penza kososola eloko moko te ?


Soki olongoli mbindo na palata, ekobimisa mbeki mpo na monyangwisi bibende na moto.


Palata na yo ekomi bosoto, vino na yo ya kitoko ekomi mayi-mayi.


Nakotelemela bino, nakopetola bosoto ya palata na bino mpe nakolongola salite na bino,


Boni, obwaki solo Yuda ? Oyini penza Siona ? Mpo na nini otindeli biso pasi makasi oyo ezangeli nzela ya kobika ? Tokanisaki ete tokozwa kimia ; nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te ! Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono ; nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi !


« Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo : ‹ Yawe alobi nini ? › Loba na ye : ‹ Yawe alobi nini ? Nakosundola bino, elobi Yawe. ›


Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi :


Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye.


Boni, osundoli biso solo mpo na libela mpe otombokeli biso na kanda eleka ndelo ?


Nzambe na ngai akobwaka bango, pamba te batosaki Ye te, mpe bakokoma koyengayenga kati na bikolo.


Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato ; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai.


Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Ezali lisusu na tina moko te ; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.


Bongo natunaki : Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye ? Soki moke te ! Pamba te ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ