3 Babateli ya bibwele elongo na bibwele na bango bakobundisa yango, bakopika bandako na bango ya kapo zingazinga na yango ; bongo moko na moko akoyeisa bibwele na ye na esika oyo ye akozwa.
Yawe atindaki mampinga ya bato ya Chalide, ya Siri, ya Moabi mpe ya Amoni mpo na kobundisa ye. Yawe atindaki bango mpo na kobebisa Yuda kolanda liloba oyo Yawe asakolaki na nzela ya basali na Ye, basakoli.
Oh mokonzi ya Asiri, bakambi na yo bazali kolala pongi, basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi, mampinga na yo bapalangani na bangomba mpe moto akosangisa bango azali komonana te.