Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 6:25 - Mokanda na Bomoi

25 Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te, pamba te monguna asimbi mopanga, bongo somo makasi ezali bisika nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 6:25
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango yango, kimia ezalaki te mpo na bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga, pamba te mobulu ezalaki kati na bavandi nyonso ya mikili.


Somo elandaka ye bisika nyonso oyo atambolaka.


Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa ; nakomi lokola mbeki oyo epanzana.


Kasi soki kaka botie moto makasi mpe botomboki, bokokufa na mopanga. » Pamba te monoko ya Yawe nde elobi.


Soki nakeyi na zamba, nazali komona bibembe ya bato oyo babomi na mopanga ; soki nakoti kati na engumba, nazali komona bato oyo bazali kokufa na nzala. Basakoli mpe Banganga-Nzambe bazali kososola likambo moko te tango bazali kotambola na mokili. › »


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo nde ezali koyokana ; kimia ezali lisusu te.


Bongo nalobaki : « Oh Nkolo Yawe, tala ndenge okosaki bato oyo mpe Yelusalemi tango olobaki : ‹ Bokozala na kimia ! › Nzokande mopanga ezalaki kozela biso. »


Bopanza sango na mokili ya Yuda, botatola na Yelusalemi mpe boloba : ‹ Bobeta kelelo na mokili ! › Boganga makasi mpe bobelela : ‹ Bosangana, bino nyonso ! Tokima na bingumba batonga makasi ! ›


Nazali komona nini ? Bazali kolenga na somo mpe kozonga sima ; balongi basoda na bango ya mpiko, bazali kopota mbangu makasi mpe bazali ata kotala sima te : somo ekangi bango na bangambo nyonso, » elobi Yawe.


Bobotola na makasi bandako na bango ya kapo mpe bibwele na bango ; bomema bilamba, biloko na bango ya kitoko mpe bashamo na bango ! Tika ete bato bawolola bango na bangambo nyonso : ‹ Somo ekangi bango na bangambo nyonso ! ›


Nakomemela yo pasi, wuta na zingazinga na yo, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Bakomema moko na moko kati na bino na bowumbu, mpe moto ata moko te akokoka kosangisa bato oyo bakokima.


Mpo na nini tozali kovanda awa ? Tosangana esika moko ! Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi mpo ete tokufela kuna ! Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.


Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia, kasi tomoni likambo moko te ya malamu ; tozalaki na elikya ete tokobika, kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso !


Ndenge obengisaka bato na mokolo ya feti, ndenge wana mpe obengisaki pasi wuta na bangambo nyonso mpo na kosala ngai mabe. Na mokolo ya kanda ya Yawe, moto moko te abikaki to atikalaki na bomoi. Monguna na ngai abebisi bato oyo nazalaki kobokola mpe kobatela.


Mwana na moto, ganga mpe lela makasi ! Pamba te mopanga ebimi mpo na koboma bato na ngai, mpo na koboma bakambi nyonso ya Isalaele ; babongisami mpo na kokufa na mopanga elongo na bato na ngai. Yango wana, beta tolo na yo !


Bakolata bilamba ya basaki mpe somo ekokanga bango ; bilongi na bango ekotonda na soni, bakokokola suki ya mito na bango.


Mikolo ya pasi ekokomela yo, mikolo oyo banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozingela yo mpe bakofinafina yo na bangambo nyonso ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ