Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 6:24 - Mokanda na Bomoi

24 Tango toyokaki sango na tina na bango, tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 6:24
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo.


Yango wana, loketo na ngai ekomi na pasi, pasi moko ya makasi penza ekangi ngai lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Makambo oyo nazali koyoka ezali kopesa ngai somo, mpe oyo nazali komona ezali kosilisa ngai mayele.


Tango makambo nyonso oyo ekoya, ekobebisa bino ; pamba te ekoleka na tongo nyonso, na moyi nyonso mpe na butu nyonso. » Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi.


Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasi na se ya bokonzi ya bato oyo yo oteyaki. Okokoma na pasi te lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ?


Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !


Botuna mpe botala : Boni, mobali akoki kobota bana ? Bongo mpo na nini nazali komona moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa ?


Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »


Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi. Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Bato ya Damasi balembi nzoto, bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango ; kobanga mpe pasi ezwi bango lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango, alembaki nzoto, somo makasi ekangaki ye mpe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Maboko na bango nyonso ekolemba, mpe mabolongo na bango nyonso ekolemba lokola mayi.


Boye, mokonzi Balitazari akomaki lisusu na somo makasi koleka, mpe elongi na ye etelaki lisusu koleka ; mpe bato na ye ya lokumu bakomaki komitungisa.


Tango nayokaki sango oyo, motema na ngai ekomaki kobeta makasi, bibebu na ngai ekomaki kolenga, mikuwa na ngai ekomaki kopola mpe makolo na ngai ekomaki kolenga. Kasi nakokanga motema na ngai mpo na kozela mokolo ya pasi oyo ekokomela ekolo oyo ebundisaki biso.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ