19 Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.
Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.
Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.
« Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso ; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te.
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na engumba oyo mpe na mboka oyo ezali zingazinga na yango pasi nyonso oyo nasakolaki na tina na yango, pamba te batosaki Ngai te mpe bayokaki maloba na ngai te. »
Loba : « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boyoka ! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo.
Pamba te bayokaki maloba na Ngai te, » elobi Yawe, « maloba oyo nazalaki kotindela bango tango na tango na nzela ya basali na Ngai, basakoli. Mpe bino bato oyo bokendeki na bowumbu, bino mpe boyokaki te, » elobi Yawe.
« Boloba yango na bikolo mpe botatola yango na Yelusalemi : ‹ Wuta na mboka mosika, mampinga ya banguna ezali koya, ezali koya na lokito mpo na kobundisa bingumba ya Yuda.
Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala ; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.
Nakosala ete bato ya Elami balenga liboso ya banguna na bango, liboso ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; nakokweyisela bango pasi na kanda na Ngai, » elobi Yawe. « Nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango.
Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela ? Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe ? Bamipesi makasi na makambo ya lokuta mpe baboyi kozongela Ngai.
Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te babwakaki Mobeko na Ngai, babatelaki te bikateli na Ngai mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.
Bino nyonso, bikolo, boyoka ! Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo, botia matoyi mpe boyoka ! Nkolo Yawe azwi bino na likambo ; Yawe akosambisa bino wuta na Ndako na Ye ya bule !
Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.
Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo : nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, mapamboli mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi.
soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;
Kasi Samuele alobaki na Saulo : — Nakozonga elongo na yo te ; pamba te lokola obwakaki Liloba na Yawe, Yawe mpe abwaki yo mpe ozali lisusu mokonzi ya Isalaele te.