Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 6:1 - Mokanda na Bomoi

1 « Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 6:1
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Joabi atindaki moto moko na mboka Tekoa, mpo na koluka mwasi moko ya bwanya mpe komema ye longwa kuna. Alobaki na ye : « Sala lokola moto oyo azali na matanga, lata bilamba ya matanga, kopakola mafuta te : sala lokola mwasi oyo alata pili wuta mikolo ebele mpo na kolela ebembe ;


Malikiya, mwana mobali ya Rekabi, mokambi ya etuka ya Beti-Akeremi, abongisaki Ekuke ya Fulu. Alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba.


Bato ya Tekoa babongisaki eteni ya mir oyo elandaki, kasi bakambi na bango baboyaki kosala na se ya mitindo ya batambolisi na bango ya misala.


Boyoka ! Makelele moko ezali koya, lokito moko ya makasi ewuti na mokili ya nor, ekosilisa bato kati na bingumba ya Yuda mpe ekokomisa yango bandako ya mbwa ya zamba.


nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.


Bato nyonso ya engumba bakimi, kaka na makelele ya basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpe oyo babundaka na matolotolo. Bamoko babombami na bazamba, bamosusu bakimi na madusu ya mabanga ya bangomba ; bingumba nyonso etikali lisusu na bato te, mpe ata moto moko te atikali kuna.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya longwa na mokili ya nor ; ekolo moko monene ezali komibongisa mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele.


Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.


Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba, bongo bato bazanga kobanga ? Pasi ekoki solo koya na engumba soki Yawe atindi yango te ?


Shar oyo bampunda ya langi ya mwindo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya nor ; shar oyo bampunda ya langi ya pembe ezali kobenda ezali kolanda oyo ya liboso, mpe shar oyo bampunda ya madodo-madodo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya sude.


Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.


Nzokande, bato ya libota ya Benjame babenganaki te bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bavandaka esika moko na bato ya libota ya Benjame.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ